곡 정보

Eswi yo wapi
Mbilia Bel
Eswi yo wapi
앱에서 듣기
Tika ngai na vanda na ngai
Tika ngai na benda nzoto
Obandi kopanza na basango bipayi biso likambo o ngai na nani eh
Instrunmental
Nayokaki yanog nandimi te
Kasi namoni lelo mbala misato
Makambo nza koboma na nzoto na ngai tembe yango yo na nani eh
Instrunmental
Ozali mobali ngai nazali mwasi tembe yango yo na nani eh
Nabangi mobali ya polo-polo lokola yo oyo mpasi eh
Instrunmental
Obongisaki ngai nandimi
Olatisi ngai mpe omemi nsango obimisaki ngai bipayi biso
Mpo ya kolakisa nse lokumu na yo moko
Inatrunmental
Okimaki ngai ntango nabeli
Osalisi ngai ata moke te
Bandima mobali na mboka na biso oyo likambo nse kosalisa ah papa
Instrunmental
Osundoli ngai na famille na ntango na mpasie
Likambo yango ezali awa na motema
Obanga lisumu te oza kotonga
Ka okoloba mpo na soni eh
Instrunmental
Tuna ngai nayebisa yo o
Mosala mobali ko nini eh
Nzambe atinda Adamu na kati ya mokili asalisa Eva
Instrunmental
Moke opesa ngai osilisi maloba ki mobali na yo ya nini o papa
Opesa ngai lopango ata ko ba voiture ofuti nyongo ya Adamu na Eva
Bandima mobali na santé ya mwasi mpe na capacité na ye ya kolatisa
Instrunmental
Tika ngai na vanda na ngai
Tika napemisa nzotó
Nabandi kozwa mopepe moke ya rebours
Makambo na yo nabosani eh
Instrunmental
Oyebisi na bato te ngai nabala te eswi yo wapi eh
Ozali koloba te yo sukola ngai epayi wapi eh
Ozwa ngai wai eh olula ngai ndenge nini eh
Obala ngai ntina eh opeis ngai nini eh
Oyoki ngai na moto eye ko deranger na ntina nini eh
Nalata nabonga obeli nde liboma ya ntina nini eh
O tokomi wapi eh mabe na ngai otinde wapi eh
Ntango nazalaki kolela sentiment otiaki wapi eh
Eswi yo wapi eh eswi yo epayi wapi eh o
Eswi yo wapi eh, eswi yo epayi wapi eh
Eswi yo wapi eh, eswi yo epayi wapi eh
멜론 님께서 등록해 주신 가사입니다.